Ko vanda na mboka ya Swisi – Sango mpe ntoli na Internet  

Tozali banani ?

Lingomba esali Migraweb ezali Association Web for Migrants (WFM). WFM asalaka mosala na ye mpo na mbongo te, na ndenge mibeko (article 60 et suivants du code civil suisse) ya mboka Swissi elobi. WFM etalaka makambo ya politique to ya Nzambe te.
 
Balingomba esalaka na kati ya WFM ezali lingomba po na bomesani ya bampaya na mboka Swissi (Forum pour l’intégration des migrantes et des migrants en Suisse), lingomba ya bampaya bafandi na Lausanne (Forum des étrangères et étrangers de Lausanne, FEEL), mpe lingomba babengi Réseau Sociolution oyo etali makambo ya ndenge ya kofanda na mboka. Lingomba ebengami Main Tendue bapesaka toli na bato oyo basalaka na balingomba oyo esalaka na WFM.
 
Mosala ya WFM ezali kosalisa bampaya mpe bato bandima ngunda na bango mpo bamesana na mboka Swissi. Bato ya minoko ebele bazali na kati ya WFM po na kobongola na minoko na bango makambo nionso etali bofandi na mboka Swissi. Bokoki ko kotala site www.migraweb.ch mpe kosenga batoli tokozongisela bino maloba na internet mpe.
 

Kosalisa bampaya

Bampaya bango moko bakosala makasi mpo nakomesana na mboka Swissi ; kasi Migraweb akosalisa bango. Bampaya bamesana na mboka Swissi bakosalisa ba oyo bamesani nainu te. Bakopesa bango toli, bakolakisa bango banzela po bamesana na mboka. Bakosala mosala yango ofele.
 
Kosalisa balingomba po bayebana.
Migraweb akosalisa balingomba ya bampaya po bakutana mpe bayebana na balingomba mosusu ya mboka Swiss (Lingomba ya bamifuteli bandako, ya biloko to misala, ya bilenge, ya bampaya, ya bato basalaka, ya bakonzi ya misala, mpe balingomba ya l’Etat lokola Offices de migration, Offices d’intégration, etc). Migraweb akolakisa bango ndenge balingomba wana basalaka misala.
 
 Migraweb epesaka ba sango po balingomba ya bampaya bayebana bango na bango.
 

Buku ya Migraweb (Agenda)

Makambo Migraweb akokoma nakati ya buku wana, ekosalisa bato po bayeba nioso ezali koleka nakati ya balingomba ya bampaya. Bakofuta mbongo ebele te soki balingi koyeba makambo etali balingomba ya bampaya
 
Soki bofuti CH 15.-, bokoki kokomisa na buku ya Migraweb misala bosalaka, bosangani (réunion), ba feti (fêtes) na bino, mpe makambo mosusu. Mbongoi wana (CHF 15-) ekosalisa biso po na misala na biso.
 
Soki bolingi koyeba koleka to kokomisa sango etali bino na buku ya Migraweb, botuna Association for Migrants, tél. :031/ 335 63 34 to bokoma na
 

Mpo na komesana na mboka:

Basango nionso etali bomesani na mboka Swissi ekomami na minoko ebele esika moko (Banque de données). Balingomba etali bomesani na mboka, etali lisalisi, bakotinda mpe basango na minoko ebele na esika wana. Bampaya, soki balingi, bakoki koyeba nionso balingi na minoko na bango.
 
Soki bozali na motuna :
Web for Migrants, c/o Sociolution, Postfach 261, Wankdorffeldstrasse 102, 3000 Bern 22, 031/335 63 34
 

Mokonzi ya mosala

 Ursula Dubois
 

Ba Coordinateur ya mosala:

Brigitte Gonzalez, Réseau romand
Zhengi Cam, FIMM
Emine Sariaslan, Réseau alémanique

 

Tozali banani ?