Ko vanda na mboka ya Swisi – Sango mpe ntoli na Internet  

Koyekola mosala

Koyekola mosala efungolelaka bilenge nzela ya mosala pe elengelaka bokitani ya basalali malamu oyo bayebi mosala. Ezali eteni monnene ya mabongisi ya kelasi na kotalaka bosenga ya molongo ya misala. Na Suisse, moko kati na bilenge misato balanda nzela ya koyekola mosala.

Keba !
Soki azali na boyebi malamu ya mosala ya tango molayi wana ozali ata na mokanda moko te ezali kolakisa, article 17 ya mibeko ya Fédération ezali kopesa yo makoki ya kozwa mokanda ya suka ya boyekoli. Po na bapaya, article 17 oyo ezali na motuya koleka. Soki ozali kosala wuta tango malayi, milengela na tango yango po ozwa mokanda ya makoki ya kosala mosala. Po yango ekofungolela y oba nzela na tango ya koluka mosala.

Nzinga nzinga ya motuna : Kelasi ebengami Maturité Professionnelle, Koyekola mosala, Banzela ya kotanga kelasi mpe yakoyekola mosala, Komibongisa po na koyekola mosala, Koyekola mosala na bakelasi ya likolo

Ekangele: