Ko vanda na mboka ya Swisi – Sango mpe ntoli na Internet  

Mbongo

Mibeko etali baboti elobi batu babalani basengeli komema mokumba ya libota. Bakoyokana na makambo nioso etali libota : kosomba biloko, kofuta oyo esengeli bafuta, kobokola bana mpe kosala mwa mosala oyo ekosunga libota, basengeli bayokana ndenge nini moto na moto akotiya maboko.


Nioso oyo ekosunga libota :

  • Lifuti ya mosala
  • Lifuti ya bompaka
  • Lifuti ya mbongo botiaki na pembeni mpe biloko nioso bozali nango (bandako, bamituka, mabele…)


Keba
Mbongo oyo baboti batiaka na pembeni po na bana, bakoki kosalela yango po na kosunga bana. Soki mbongo ya libota ekoki kosunga bango te, bakoki kosenga na lingomba oyo etalaka lisalisi na commune esika bafandi. Commune akosunga bangona ndambu ya mbongo oyo ekoki kobikisa bango.
Tala  assurance sociale mpe aide sociale.

Mbongo ekosunga yo po na sanza mobimba

Osengeli koyeba motuya ya mbongo ekosunga yo po na sanza mobimba. Soki olingi koyeba ndenge nini yakosala yango, otuna na lingomba ezali na kati ya ASSOF (communauté suisse des assurances sociales)

Mbongo ya pokoti

Moboti na moboti asengeli kozala na mbongo po na pokoti na ye. Moto na moto akozwa na ndenge ya lifuti ya mosala.

Na libota moto na moto asengeli koyeba

Moto na moto asengeli koyebisa moninga mbongo azwaka, biloko nioso azali nango mpe baniongo azali nango. Basengeli kokoma yango na mokanda lokola mikanda ya ba compte, ya banque, soki ozwaki niongo…. Ndako basambisaka bato alingi esalema bongo po na kobatela mabota.

Mokumba ya baniongo

Baboti bango mibale basengeli kozwa mokumba ya baniongo bazwaki po na kosunga libota.
Soki moko nakati na bango azwaki niongo, wana etali ye moko. Po na moninga mosusu etali ye te mpo atiyaki misapi te, amikotisaki ye moko.


Na miso ya bakonzi soki bakabwani te, bango mibale bakomema mokumba ya mbongo ya ndako, ya kofuta mbongo po na bokono mpe mpako ya mboka.


Soki mituna ezali, otuna na bisika etalaka baniongo.

Ekangele: