Kozwa libiki
Soki bokono, monganga ya libota aza moto ya liboso ya kobenga. Na mboka Swisi, monganga ya libota a kopesa libiki ya liboso.
Soki bokono eleki makasi, a kotinda yo na mbeto ya lopitalo. Ata soki na motema na yo moko olingi ko kende epayi ya monganga oyo yo o lingi, ya liboso esengeli kotala monganga ya libota.
Na tango ya likama, soki o koti na mbeto ya lopitalo, te na ndenge ya mbango, tuna nano na monganga ya libota a tala yo. Ye nde a kosalisa yo mpo na libiki ya liboso mpe sima a kosala nioso mpo a tinda yo epayi ya monganga oyo elongobani mpo na bokono oyo ozali na yango.
Keba
Esengeli te basali ya esika ba ngunda ba mikomisa to esika ba fandi, bango
nde ba kobenga monganga soki bokono ezwi ngunda.
Kokende yo moko epayi ya monganga oyo elongobani na bokono na yo
Okoki soki o lingi kopona yo moko monganga oyo elongobani mpo na maladi na yo – kasi a zala na motuna te oyo etali mokanda oyo etali libiki ya bokono na yo (contrat d’assurance maladie de base).
Soki mitindo epesami epayi ya monganga ya libota te, okoki kozela ba poso ebele liboso ba yamba yo.
Na kati ya liboke oza mpe na: koluka monganga, kokende kotala monganga, policlinique
Ekangele :
Nzinga nzinga ya motuna : themen/gesundheit/arzt/arztbesuch, themen/gesundheit/arzt/polikinik, themen/gesundheit/arzt/arztsuche