Ko vanda na mboka ya Swisi – Sango mpe ntoli na Internet  

Zemi

Bakisi bazali koteka mikolo oyo na bandako etekaka bakisi, ekolakisa malamu soki muasi azali na zemi na sima ya mikolo misato to mitano asilisi kozala na makila. Kozwa zemi ezali likambo esengeli kozala ndenge ekomama na bomoyi ya muasi. Eyebana tèê motuya 80% ya bazemi ekoki koleka na yango malamu. Kasi ezali malamu monganga to basi babotisaka basi balandelaka zemi yango. Basi bazali na zemi basengeli mpe kokende epayi ya monganga mbala inso esengami po bakoka kotala soki liboso ya kobota mikakatano ekoki kozala.

Monganga akolandela zemi

Monganga to muasi abotisaka basi akoyamba muasi oyo azali na zemi mbala motoba to sambo liboso ya kobota.

Monganga to muasi abotisaka basi akoyamba muasi ya zemi tango zemi ekokisi mposo zomi na moko to zomi na mibale. Bakotala muasi azali na zemi malamu malamu soki azali na bokono ya cancer. Bakotala mpe makila na ye. Bakotuna ye mpe mituna etali nzoto na ye.

Bakoyamba ye na mbala ya sima po bayeba kilo na ye, bayeba ndenge nini makila na ye ezali kotambola, ndenge motema ezali kosala, ndenge nzoto na ye ya kimuasi ezali. Mbala ya mibale, bakotala ye na masini ebengami « ultra-son ».

Mobali na ye to mobali oyo atiyaki ye zemi, akoki kozala mbala inso tango bazali koyamba ye po batala nzoto na ye.

Osengeli oyeba
Lokola otiyaka mbongo pembeni po na bokono, ndanga ya bokono akofuta mbongo nioso esengami po balandelaka zemi na ye. Akofuta :

  • Mbala motoba muasi abotisaka basi akoyamba ye to mbala sambo monganga akoyamba ye
  • Mbala mibale po na masini ebengami « ultra-son »
  • Motuya ya mbongo 100 Frs po na ndenge muasi abotisaka azali kopesa ye ntoli ya tango ya kobota
  • Mbongo ya kobota na lopitalo to mbongo po na muasi abotisaka basi
  • Mikolo zomi po muasi abotisaka azali kolandela ye ezala aboti na lopitalo to esika mosusu
  • Ndenge monganga to muasi abotisaka basi azali koyamba ye na sima ya mposo motoba to zomi na sima ya kobota
  • Mbala misato, tango bazali koteyisa ye na makambo etali komelisa muana libele.

Bileyi

Asengeli aliya malamu mpe abongolaka biloko ya koliya. Alanda oyo ekomami na nzete ebengami « pyramide alimentaire » (Link setzen)

Atikai koliya biloko ya manzanza to biloko balambi noki noki po ezali na biloko ya mabe oyo muasi azali na zemi akoki koliya te. Asengeli amela mbala na mbala mayi ya milangi, miliki ya malamu, masanga ya bambuma baliyaka ezali na sukali mingi te. Asengeli ayeba tèê muasi azali na zemi akoki te kobongola bileyi po akonda.

Soki ayoki nzala, asengeli aliya biloko ya malamu oyo ezali na vitamine ebele.

Bakisi

Akoki te  komela bakisi oyo monganga akomi te.

Milinga ya makaya, masanga ya makasi, diamba

Diamba mpe masanga ya makasi ekobebisa muana na kati ya libumu, amela yango te. Asolola na monganga to na muasi abotisaka basi na ye.

Komibongisa po na kobota

Soki alandi mateya mpe batoli bapesaka na basi oyo bazali na zemi, akoyeba ndenge nini akosala na nzoto, ndenge akopema po kobota na ye elekana na kimiya. Asengeli kolanda mateya yango tango zemi ekokisi mposo ntuku mibale na mitano (25) to loba ntuku misato (30). Mateya yango ewumelaka mposo sambo (7) to zomi (10). Mobali akoki mpe, soki alingi, kolanda mateya yango.

Mateya po na baboti

Na kati ya mbula, ba lopitalo oyo babotisaka, bateyaka baboti. Otuna monganga to muasi abotisaka basi.

Nzinga nzinga ya motuna : Komitalisa nzoto epayi ya monganga atalaka basi, Komelisa muana libele, Nasima ya kobota, Zemi, Kobota, Komibatela kozwa zemi, Tango mwasi akomona lisusu makila té Na bomoyi ya mwasi, ezali na tango, akomona lisusu makila te. po na basi mosusu, ekozala tango akokokisa mbula 40, po na bamosusu, soki alekisi mbula 50. Na tango yango, nzoto ya mwasi ezali kosala lisusu te po akoka kozwa zemi. Mwasi akokoka kozwa lisusu zemi te po ba ormone na ye ezali kobanda kosila. Na ndenge azali komona lisusu makila yango te, wana nde libandeli ya tango akokoka kozwa zemi lisusu te. Nzoto ya mwasi ekobanda kobongola. Mwasi akobanda koyoka nzoto malamu te : nzoto moto moto, tango ya pongi ekiti, makila ya nzoto ekomata, loposo ya nzoto ekobanda kokawuka, kilo ya nzoto ekomata, akokoma kanda kanda, posa ya kosangana na mobali ekozala lisusu te. Po na bomoyi ya mwasi, komona makila lisusu te esalema ndenge wana. Soki nzoto na ye ebandi kobongola po na yango, minganga bakolandela yango lokola balandelaka babokono mosusu. Monganga na yo akozala moteyi na yo. Bokono ya mikuwa Tango mwasi akoki kozwa lisusu zemi te, akoki mpe kobela bokono ya mikuwa ebengami ostéoporose. Biloko ya koliya ezala na calcium mingi mpe kotambola ezali kisi ya liboso po na bokono yango. Soki bokono yango ezali makasi, minganga bakokomela ye kisi ezali na ba ormone. Bakisi yango ekobenda kuokoso po na mwasi abelaka cancer ya libele. Osenga ntoli epayi ya monganga ya mibale po apesa mpe ya ye makanisi. Kozala na bomoyi ya kimiya Bakuokoso nioso tango mwasi azali komona makila te ekobika soki biloko ya koliya ya malamu, soki azali kotambola, makaya te, kopo moko ya vino mikolo nioso, tango ya kosepelisa nzoto mpe kimia. Na bambula oyo, bakisi esalema na matiti ezali malamu po na kosunga basi oyo bazali na pasi na tango bamonaka makila lisusu te. Osenga na monganga na yo po na bakisi esalema na matiti. Bomoyi ya malamu Bakwokoso ya mwasi akomona lisusu makila té soki azali na bomoyi ya malamu : koliya malamu, koniolosa nzoto, makaya te, kopo moko ya masanga na mokolo, kobimaka na kimiya. Bambula oyo, bandako esalaka bakisi balakisi bolamu ya matiti ya bokoko po na kosunga basi oyo bakomona makila lisusu té. Osengeli otuna yango na monganga oyo alandaka yo. , Kolonga zemi

Ekangele: