Balingomba ya Alévis
Na mboka Swissi, ba Alévis bazai 40.000, toloba 50.000. Ebele bawuti mboka Turquie.
Lingomba ya liboso ya ba alévis esalemaki na mbula 1992 na mboka Bâle. Ba oyo babandaki lingomba bakanisaki tè alévis ezali lingomba ya koyekola makambo etali bondimi islam. Kasi na libandeli ya balingomba alévis, makanisi ya bondimi ya bachirstu ezalaki mpe.
Bandimi lingomba alévis bazali na makanisi ebele po na makambo etali lingomba na bango. Po na bato mosusu, ezali lingomba ya solo ya makanisi ya bomoyi, po na ba mosusu, ezali lingomba ya makanisi ya kobongisa mboka, po na ba mosusu ezali makanisi ya solo solo ya islam. Na mokolo ya lelo, ndambo ya ba ndimi alévis ya mboka Swissi, bakanisaka tè lingomba na bango ezali ya bondimi islam.
Na mboka Swissi, balingomba ya alévis bazali 14, 11 na kati na bango basangani na kati ya lingomba ya monene alévis.