Moto oyo asengeli kofuta mpako
Esengeli mopaya a futa mpako o mboka Swisi, soki asali mikolo tuku misato (30) to ya koleka to soki a fandi kasi aza kosala te mikolo tuku libwa (90) to ya koleka o mboka Swisi.
Keba
Mpo na kopekisa bampaya oyo ba fandi o mboka Swisi ba futa mpako na bango mbala mibale, mboka Swisi bayokani na ba mboka ebele mpo na makambo etali mpako.Likambo etali boyokani na ba mboka yango ezali : ba mboka ya UE, na AELE, Australia, Africa du sud, Canada, Chine, Nouvelle-Zélande, Russie.
Okoki kotala kombo ya ba mboka nioso na internet na administration fiscale de la confederation.
Na kati ya liboke oyo: oza mpe na mpako, mpako ya moto, mpako oyo ba longolaka na lifuti, moto oyo asengeli kofuta mpako.
Nzinga nzinga ya motuna : Mpako ya moto, Mpako oyo ba longolaka na lifuti, Moto oyo asengeli kofuta mpako, indirekte-steuern