Kotiya mbongo pembeni po na likama
Na mboka Swissi, mpo na kuokoso etali bomoyi, bokono, kolongono, biloko ya moto to ya mboka, okoki kotia mbongo pembeni na balingomba ebengami « assurances dommages ». Mibeko ya mboka elobi na balingomba mosusu ya assurance osengeli ko tiya mbongo kasi misusu okotiya soki olingi.
Soki likama esalemi, assurances akofuta yango. Likama ezali likama Moto moko te ayebi na tango nini ekosalema.
Kotia mbongo pembeni mpo na tango ya likama ezali po na bolamu ya bato nionso. Mbongo moto na moto akotiya ezali po na bolamu ya bato nioso na tango ya likama.
Okoki kotia mbongo pembeni po na bomoyi ya moto, mpo na biloko to po na biloko bibungi.
Lifuti
Na kati ya mbongo okofuta, basangisi talo ya likama oyo ekoyela yo na mosala ekosalema na kati ya balingomba wana. Yango nde lingomba na lingomba akotiya talo na ye.
Lifuti na yo ekozala ndenge bizaleli na yo ezali. Lokola momemi motuka oyo asala likama te, akofuta mbongo ebele te.
Keba
Balingomba ya assurance bakoki koboya moto oyo afutaka te noki, na kati ya mikolo asengeli afuta. Mpo na yango, bakokomela yo mokanda liboso. Soki olekisi mikolo, tango okozwa likama, bakofuta yo te.
Batiaka mbongo pembeni mpo na: libota, makambo nionso ya mokili, mituka.
Nzinga nzinga ya motuna : Kotia mbongo pembeni mpo na biloko ya ndako, kotiya mbongo pembeni po na yo moko, Kotia mbongo pembeni mpo na kobatela motuka
Ekangele:
- Lexique allemand, français, italien, anglais
- Office de médiation de l’assurance privée et de la SUVA allemand, français, italien, anglais
- Les questions les plus fréquentes allemand, français, italien, anglais
- Comparaison des prestations et des primes allemand, français, italien, anglais
- Les assurances suisses allemand, français, italien, anglais
- Question de droit allemand, français, italien, anglais
- Prévention allemand, français, italien, anglais
- Association Suisse d’Assurances allemand, français, italien, anglais
- Forum de consommateur allemand, français, italien, anglais
- Stiftung Konsumentenschutz allemand, français, italien, anglais
- Fédération romande des consommateurs allemand, français, italien, anglais